Qui est Nzeza Nlandu Edmond ? (Vidéo)

 


Edmond Nzenza Nlandu, derrière J. M. Bomboko, entre Kitima Bin Ramazani (en lunettes) et un blanc non autrement identifié.

Mbote Kulutu Emmanuel Kandolo,
Na zone ya Kimbanseke nazalaki komona mua ba bala bala ebele eza na ba kombo ndenge na ndenge, kasi tango na komi koyekola awa na mboka mosika nakomi komona ke nzoka nde ba kombo ya ba bala bala wana nazalaki komona ezalaki batu oyo ba exista pe bazalaki bato basalaki makambo na mboka na biso.  Tala ba foto mibale oyo, mutu oyo babengi Edmond Nzeza Landu aza to azalaki nani na mboka na biso?
Tango okozua ngonga olimbola biso na mozindo bo momesano.
Merci d'avance, kimia o mboka yo. 
Serge Kongo na biso.

S Miekono
James Dean disait:"Puisqu’on ne peut changer la direction du vent, il faut apprendre à orienter les voiles".

Ndeko Serge,

Limbisa ngai na mua retard mpo temps na ngai ezali mua mobulu. Kasi nabanzi que l’essentiel ezali nde nayanola na motuna.

Nameki kosalela yo biographie ya Edouard Nzenza Nlandu « Edmond » ndenge osengaki. Nabanzi que yango ekosunga yo mua moke mpo oyeba lolenge nini azalaki mpe kosala lien na ba kombo ya avenue otangelaki ngai.

Patriotiquement,

 Emmanuel Kandolo

  ................................................................................................................................

Edouard Nzeza Nlandu « Edmond », azali mu Ntandu, amoni mokili na mokolo mua 15 septembre 1923, na village ya Mpangu, territoire ya Madimba, district ya Bas-Congo, province ya Congo-Kasaï. Atangi ba kelasi na ye ya primaire, na ville ya Léopoldville, na Institut Saint Joseph, wuta 1932 tee na 1938. Sima akeyi kosala école moyenne na Brazzaville, abandi na 1938 tee asilisi na 1942. Azongi na Congo-Léopoldville, mpo na kokota na petit séminaire Saint Henri ya Lemfu, na secteur ya Ngeba, territoire ya Madimba, na district ya Bas-Congo, na province ya Léopoldville. Kuna nde asilisi petit séminaire na 1945. Sima, akeyi na grand séminaire ya  Mayidi, esika azui diplôme na philosophie mpe théologie, na 1949. Mpo na ba raisons personnelles a renoncer na sacerdoce mpe na ko poursuivre ba études théologiques na université pontificale grégorienne ya Rome.

Abandi vie professionnelle active na mokolo mua 3 mai 1950, en tant que commis na comptabilité na ba Plantations Lever au Congo. Yango eyebanaki na kombo ya Huileries du Congo belge (H.C.B.), filiale ya Unilever ya Londres.

Tango Caisse générale d'épargne du Congo belge et du Rwanda-Urundi esalemi na mokolo mua 10 juin 1950, a postuler kuna, mpe abandi mosala na août 1950, en qualité ya commis na comptabilité.

Na même année, 1950, asali rédaction ya premier manifeste ya Association des ba Kongo pour l’unification, la conservation, l’expression et le perfectionnement ya langue kikongo  = Association des Bakongo (A.BA.KO.).

Edmond Nzenza Nlandu azali former epayi ya ba Jésuites : Lemfu mpe na  Kisantu, esika atangaki, ezali na congrégation jésuite ya ba Frères de Saint Joseph.

Na Kisantu nde asalaki ba amitiés na professeur na ye, Père Joseph Van Wing, na grand séminaire ya Mayindi. Ce dernier, azalaki éthologue, sociologue mpe anthropologue. Asalaki ba études mpe na ba publications miyike sur ba Kongo. Ye nde asalaki commission pour l’unification ya kikongo, na 1935, na Kisantu. Grâce na ye nde likanisi lya kosala association culturelle ya ba Kongo ebotamaki. Père Van Wing nde a insista epayi ya Edmond Nzeza Nlandu mpo asala association culturelle ezali kosangisa ba Kongo mpe na promotion ya culture kongo mpe mpo na ko lutter contre déliquescence ya kikongo par rapport na lingala na  Léopoldville, na lolenge mundele azali kosala nionso mpo na kokotisa yango mayi. Ye mpe lisusu nde azali na base ya publication ya manifeste ya liboso ya revue Kongo Overzee, na Bruxelles.

Ancien élève ya Père Van Wing, Edmond Nzenza Nlandu atiaki na profit ba études na recherches ya Père Van Wing  « Etudes ba Kongo » mpo na ko explorer richesse ya héritage culturelle Kongo.  Ba références ya ba études mpe ba recherches ya Père Van Wing yango oyo na nse :           

- R.P. Van Wing, Joseph, Etudes Bakongo: histoire et sociologie, Goemaere, Bruxelles, 1921.

- R.P. Van Wing, Joseph, Etudes Bakongo: sociologie, religion et magie, Desclée de Brouwer,        Bruxelles,  1959.

Ba Ntandu ya Léopoldville ; Madimba na Kisantu bazalaka na Association na bango eyebanaka na kombo ya Renaissance des ba Kongo (RENAI.BA.KO.), ya Jean Mavuela, na 1945. Tango RENAI.BA.KO. ekufi na 1950, na mbotama ya A.BA.KO. ba Ntandu nionso oyo bazalaki kuna bakendaki kokota na A.BA.KO ya Edmond Nzeza Nlandu.

Na septembre 1950, Edmond Nzenza Nlandu asali Association des ba Kongo pour l’unification, la conservation, l’expression et le perfectionnement ya langue kikongo  (A.BA.KO.). Officiellement, A.BA.KO. esalemaki na décision ya Gouverneur ya district ya Moyen-Congo, Jean Trodeur, na décision azuaki, wuta initiative Edmond Nzeza Nlandu azuaki, ya kosenga autorisation ya kosala association, na lettre akomelaka Jean Cordy, Administrateur ya territoire, Chef ya service ya population noire, na mokolo mua 2 septembre 1952. Aboutissement ya procédure administrative ezalaki signature ya décision  n° 4.612/23A ya 7 juillet 1953.

Na mokolo mua 11 septembre 1953, Léon Pétillon, Gouverneur général ya Congo belge, a signer ordonnance n° 05/309. Yango epesi autorisation ya publication ya journal Kongo dia Ngunga. Yango nde ezali ko diffuser expression conscience tribale ya ba Kongo en extension na batu ya Kwango mpo na kati ya A.BA.KO. ezalaki mpe na ba anciens élèves jésuites ya mission Kwango, na district ya Kwango epayi Père Joseph Van Wing akomaka  inspecteur ya enseignement na Vicariat ya Kwango. Ba liens ezalaki makasi entre ba élèves ya Kisantu na oyo ya Kwango.

Mpo na ba oyo bayebi te, ba réunions ya liboso ya A.BA.KO. ebandaki kosalema na avenue Isangi  n° 168, na commune ya Saint-Jean (Lingwala). Bureau ya journal Kongo dia Ngunga ezalaki na stade reine Astrid (stade Cardinal Malula, ex-stade du 24 novembre 1965).

Na ebandeli A.BA.KO. ezalaki majoritairement na ba Ntandu (batu ya Mpangu septentrional) na ba Ndibu (batu ya Nsudi) na kolanda na ba Manyanga, Besi Ngombe,  Solongo, tee kokita na ba Yombe, Amboma, etc.

Kobanda na septembre 1950 tee na juillet 1953, Edmond Nzeza Nlandu azalaki Fondateur mpe Président ya A.BA.KO.

Wuta mokolo mua 11 septembre 1953, akomi Directeur-Fondateur  ya journal Kongo dia Nkunga.

Na 21 mars 1954, Edmond Nzenza Nlandu a démissionner na présidence ya A.BA.KO .mpe a proposer par surprise candidat na ye, Joseph Kasa Vubu na présidence générale. Ye andimami sans problème na faveur ya ba applaudissements nourris. Wuta wana, Edmond Nzenza Nlandu atikalaki kaka na titre ya fondateur mpo azalaki ko souhaiter ya kozala consacrer mingi mingi na journal Kongo dia Nkunga. Kobanda awa nde Kasa Vubu abandi ko réformer A.BA.KO. na mouvement politique.

Neti ekomaki difficile Edmond Nzeza Nlandu concilier ba activités ya journal na mosala mua ye na Léopoldville, na Caisse générale d'épargne du Congo belge et du Rwanda-Urundi, ayaki kozua décision ya kolongua na mosala, na juillet 1956 mpo na ko se consacrer na commerce. Yango ezalaki possible mpo azuaki crédit na société de Crédit aux classes Moyennes et à l'Industrie (SCOMI) nde e permettaki ye a démarrer ba activités commerciales na vente et achat ya ba produits ya première nécessité mpe plus tard na transport ya batu na ba marchandises na secteur ya ba Kongo.

Na décembre 1957, na ba élections communales ya Léopoldville, aponami Conseiller communal ya Matete.

Na 1958, azui likanisi ya kosangisa ba Kongo ya  province ya Léopoldville oyo ezali na kati na yango na ba districts ya Bas-Congo na Kwango. Bango basangani na coopérative ebengami Coopérative ba Kongo-kwango (CO.BAKWA.).

Kaka na 1958 wana, A.BA.KO. eponi ye membre ya Comité central.

Na mokolo mua 4 janvier 1959, rassemblement public ya Association des ba Kongo (A.BA.KO.) esengelaki esalema na commune ya Kalamu (Dendale) na quartier  Ranquin, na esika ebengami The Young Men's Christian Association (Y.M.C.A.). Kasi, Jean Tordeur, Bourgmestre ya ville  ya Léopoldville,  bien que apesaki autorisation mikolo mileki, aye koboya lisusu que meeting esalema. Batu basi batondaki na Y.M.C.A. mpo na koyoka makambo Kasa Vubu, Président général ya A.BA.KO. esengelaki aloba. Déception ya ba militants ya A.BA.KO. eyaki kosangana na kanda ya ba sympathisants ya Victoria  Club na lolenge équipe na bango epolaki na match ya championnat ya entente ya Léopoldville, na stade Tata Raphaël, contre Mikado. Sangana ya batu nionso wana ebendi na situation explosive et  incontrôlable mpo na ba autorités urbaines ya Léopoldville mpe ekumbi na ba bavures ebele : kufa ya batu, pillage, viols, blessures, etc. ya population noire na blanche.

Mobulu oyo nde eyaki kokangisa 26 dirigeants ya A.BA.KO. mpe na kati na bango, Edmond Nzenza Nlandu. Ye akangamaki na mokolo mua 5 janvier 1959.

Mobilisation makasi ya ba Kongo esalemaki, Président Fulbert Youlu ya Congo-Brazzaville, Jean Nlandu, kulutu ya Edmond Nzeza Nlandu na ba notables ne-Kongo mosusu, batiaki ba moyens en jeu mpo na kobengisa un des célèbres avocats français, Maître Jacques Croquez ya Barreau de Paris mpe na ba Maîtres Antoine Joseph Van Bilsen na Jabot ya Barreau ya Bruxelles mpo na défense ya ba dirigeants ya A.BA.KO.  Procès ebandaki na mokolo mua 23 janvier 1959 mpe mpe bazui acquittement na bango na mokolo mua 26 février 1959.

Na début décembre 1959, Edmond Nzeza  Nlandu akeyi na Bruxelles na ba membres ya A.BA.KO. mpe na ya ba partis mosusu mpo na ko discuter ba modalités ya élections législatives mpe na Table ronde.

Na bozongi na Léopoldville, Edmond Nzeza Nlandu a participer na congrès ya Kisantu oyo esalemaki wuta mokolo 24 tee na 27 décembre 1959. Yango esangisaki ba partis nationalistes na oyo ebandaki ko prôner fédéralisme.

Azongi lisusu na Bruxelles, na tête ya délégation ya A.BA.KO.  na Table ronde politique ya Bruxelles oyo esalemaki wuta 20 janvier tee na  20 février 1960. Yango  ezalaki composer na ba membres titulaires iye : Edmond Nzenza Nlandu, Joseph Kasa Vubu  na Daniel Kanza. Ba membres suppléants : Joseph Yumbu Lemba, Simon Nzenza, Emmanuel Kini na Philibert Luyeye.

Kuna esika bazalaki na Bruxelles, boyokani bozalaki te kati na bango, Kasa Vubu abendani na Liège, pendant que ba travaux ya Table ronde ezali ko continuer na Bruxelles. Edmond Nzeza Nlandu, fondateur, Daniel Kanza, vice-Président, Simon Nzeza, trésorerie général ba signer document ezali ko fustiger attitude dictatoriale  ya Kasa Vubu, Président général  mpe na ko accuser ye que a détourner mbongo ya caisse ya A.BA.KO. Kasa Vubu a réagir na conférence de presse na Liège mpe na Léopoldville, Vital Moanda, vice-Président mosusu, abengisi comité central ya A.BA.KO. mpe ezui décision ya ko suspendre Edmond Nzeza Nlandu, Daniel Kanza na Simon Nzenza na parti.

Ba esprits ekomaki chauffés makasi na Léopoldville. Photographe, militant ya A.BA.KO. Nsiama, muyombe lokola Kasa Vubu na Moanda, ayebani malamu na commune Ngiri Ngiri. Ye, asalaki suka na ba montages ya ba photos ewutaki na Bruxelles mpe abimisi ba photos montées ezali kolakisa Thomas Kanza (munyanga mpe muana ya Daniel Kanza),  a coller Kasa Vubu na chemise, mosusu a étrangler ye carrément na kingo mpe Kasa Vubu en difficulté lokola mutu azali lisusu kokoka kopema malamu te, etc. Yango etambolaki mpe epanzanaki na Léopoldville tee na ba province ya Congo central. Comme il fallait s’y attendre, ebotami koyinana makasi kati na ba Yombe na ba Manyanga mpe tango délégation ekendeki Bruxelles, ezongi na Léopoldville, Comité central ya A.BA.KO. ebengisi yango, esangeni lisusu mpe na mokolo mua 22 mars 1960, e révoquer Daniel Kanza na A.BA.KO. e conduire suspension ya Edmond Nzenza Nlandu na Simon Nzenza.

Suspension ya Edmond Nzenza Nlandu ezalaki lever avant ba élections législatives ya mai 1960. Ye alongaki ebonga ya député national élu ya ville ya Léopoldville.

Na mokolo mua 15 décembre 1960, Edmond Nzenza Nlandu asali parti politique ya sika na kombo ya Rassemblement Fédéral Congolais (RA.FE.CO.).

Na 1961, asali mobembo na République Fédérale ya Allemagne sur invitation ya fondation Deutche-France-Afrique.  Yango eyaki kosala que fondation Deutche-France-Afrique  eya ko implanter na Léopoldville, imprimerie, papeterie, librairie Concordia mpe Edmond Nzenza Nlandu aponaki parmi ba responsables na yango.

Na ba élections législatives ya mars-avril 1965, aponami lisusu Député national.

Na 1967,  Président  Mobutu abongolaki franc congolais na Zaïre mpe na 1970 abandi kopesa makanisi ma kobongola kombo ya République Démocratique ya Congo na Zaïre, Député national, Edmond Nzenza Nlandu azalaki opposer na idée oyo mpe alobaki polele que « Nzadi ezali fleuve na kikongo. Kolongola Congo mpo na ko remplacer yango na Zaïre ezali na sens moko te mpo Zaïre ezali na assise historique ata moko te comparativement na Congo =Kongo. Ata ba imposer Zaïre, suka suka kombo wana ekolimua mpo ezali na repère historique te ». Wuta awa nde conflit ebandaki kati na ye na Président Mobutu.

Na 1973, na zaïrianisation, l’Etat Zaïrois e zaïrianiser imprimerie, papeterie, librairie Concordia, esika Edmond Nzenza Nlandu azalaki mokonzi.

Fondation Deutche-France-Afrique, ezalaki propriétaire ya imprimerie Concordia. Ezalaki zaïrianiser. Yango nde eye kozua kombo ya sika ya imprimerie, papeterie, librairie de Kinshasa, mpe l’Etat etie Bondo Nsama, Directeur-gérant. Ce dernier, azalaki  ancien éditeur de Myoto.

Na 1979, Bondo Nsama asombi journal Salongo mpe na imprimerie de Kinshasa ex-Concordia na l’Etat Zaïrois mpe ekomi privatiser. Journal e garder kombo ya Salongo, en revanche, imprimerie Kinhsasa ebongoli lisusu kombo ekomi kobengama Générale d'Imprimerie et Offset du Zaïre (G.IM.O.ZA.).

Pour rappel, Salongo ebotami na fusion  (juillet 1972) ya ba journaux  Myoto  ex- Etoile du Congo  na  Progrès (février 1972).

Donc, Edmond Nzenza Nlandu azalaka propriétaire ya imprimerie Concordia te, yango wana ezalaka zaïrianiser. Mpe soki azalaka en conflit na Président Mobutu te, mbele alingaki nde apesaye Concordia na cadre ya zaïrianisation.  A part wana, kanda Président Mobutu akangelaka ye, esalaki que atiya ye na résidence surveillée pendant plusieurs mois.

Na Congrès ya A.BA.KO. ya 25 juillet tee na 4 août 1963, Edmond Nzeza Nlandu aponamaki comme Conseiller général à vie. Une manière ya ko saluer action na ye na A.BA.KO. Sima ya Congrès oyo, A.BA.KO. ekomaki kosala ba Congrès clandestins wuta Président Mobutu asalaka coups d’Etat na ye ya mbala ya mibale, mokolo mua 24 novembre 1965.

Edmond Nzenza Nlandu, riche commerçant, ba activités na ye ebotelaki ye ba activités na Kinshasa, Bas-Congo na Bandundu na import na export, magasins, menuiserie, ferme, boulangerie, restaurant,  camions, ba ndaku, na ba terrains agricoles. Apesaki misala na batu ebele.

Intellectuel, homme de culture attaché na ba valeurs traditionnelles africaines mpe profondément encré  na kotombola bendele ya culture ne-Kongo, commerçant ayebi kobalola mbongo mpe kokolisa ba activités na ye, mutu honnête mpe entreprenant na mingi asala, politicien dévoué na cause ya ne-kongo.

Edmond Nzenza Nlandu akufi tragiquement par empoisonnement na mokolo mua 28 avril 1977.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo


About FODABI

This is a short description in the author block about the author. You edit it by entering text in the "Biographical Info" field in the user admin panel.

0 $type={blogger} :

Enregistrer un commentaire